Paroles de 'Po Nabika' par Mike Kalambay

Vous voulez connaître les paroles de Po Nabika de Mike Kalambay ? Vous êtes au bon endroit.

Totomboli kiti na yo
Po yo Mokonzi ya milimo nionso
Osimbi bomoyi na biso
Liloba ya suka eza na yo Yahwe ee

Mokonzi ya lingomba
Tobonzeli yo mitema
Kiti na yo eza ya seko
Lingenda na yo ya libela
Totomboli maboko
Toyemba y'oza mosantu
Mosantu
Mosantu
Mosantu

Mokonzi ya lingomba
Tobonzeli yo mitema
Kiti na yo eza ya seko
Lingenda na yo ya libela
Totomboli maboko
Toyemba y'oza mosantu
Mosantu
Mosantu
Mosantu

Elekelaka ngai, (uuuh)
Tango nabanzaka mosala osala na ekulusu eeh (Uuuuh)
Ngai moto na masumu Yaya eeh (Elekelaka ngai eeeh)
Ondima ko mema mikumba na ekulusu eeh (Uuuh)

Po Nabika
Ah! Po ngai nabika yaya, (Po Nabika)
Ba sete na maboko, misusu na makolo yaya (Po Nabika)
Ah! Likonga mopanzi, makila na mayi etangi (Po Nabika)
Jusqu'à imaginer que Papa atiki yo Yesu eeh (Po Nabika)
Ah! Eli Eli lama sabachtani (Po Nabika)
Eloi, Eloi, Yesu na nga aleli (Po Nabika)

Ba sete na maboko, misusu na makolo yaya (Po Nabika)
Likonga mopanzi, makila na mayi etangi (Po Nabika)
Yo moto omesana na ekoti ya nkembo (Po Nabika)
Ah! Mokolo yango olata ekoti ya nzube yaya (Po Nabika)
Tala na esika ya mayi bapesela ngai yo vinaigre (Po Nabika)
Innoçent otangisa makila na likambo oyeba kutu te oh (Po Nabika)
Elombe na ngai okufa na fimbo te, na makofi te oh (Po Nabika)
Ah! Yo moko ozongisa molimo na yo epayi ya Papa (Po Nabika)
Omikaba mbeka po ngai na zua bomoyi (Po Nabika)
Okoma lisumu po nga nakoma mosantu (Po Nabika)
Papa n'ekulusu okokisa nionso ya ngai (Po Nabika)
Ofutela nga nyongo elekela ngai mayele (Po Nabika)
Malgré ba moqueries tu n'as pas abandonné (Po Nabika)
Et pour finir oloba "Tout est accompli" (Po Nabika)
Po nga nabika, po nga nabika (Po Nabika)
Po nga nabika, po nga nabika (Po Nabika)

Nalingaka yo eh Yesu
Bolingo ya Motema
Nalingaka yo eh Yaya
Yo lolango na ngai ôôôh

Osala nionso po nabika eh
Opesa ya yo nionso ozalaki na yango
Yesu libonza ya talo eh
Na benga yo nani?
Yango nalobi oza bolingo ya motema eeeh
Ya motema eee toyemba elongo

Ya motema eee
Ya motema eee (Ya mabanzo)

Ya mabanzo eee (Tshiena mulala diela dia menji, Nsenda wanyi)
Ya mabanzo ee (ebua bueba) (Yesu bolingo ya mikuwa eh)
Ya mikuwa
(Ce qui me maintient en vie, c'est ton amour dans mon coeur, nalingaka yo eh)
Ya mikuwa eh (À jamais, bolingo ya libela eh)
Ya libela eeeh (Libela, libela na changer mosusu te kaka yo eh)
Ya libela eh (Yesu oza bolingo ya bomawana na ngaiiiiiii)
Ya bomwana eeeh (Opikoli bolingo yo moko,)
Ya bomwana eeh (J'insiste oza bolingo ya motema na ngai)
Ya motema eeh (Na kati ya motema penza)
Ya motema

Il existe de nombreuses raisons de vouloir connaître les paroles de Po Nabika de Mike Kalambay.

Savoir ce que disent les paroles de Po Nabika nous permet de mettre plus de sentiment dans l'interprétation.

Une raison très courante de rechercher les paroles de Po Nabika est le fait de vouloir bien les connaître parce qu'elles nous font penser à une personne ou une situation spéciale.

Ce qui arrive plus souvent que nous le pensons est que les gens recherchent les paroles de Po Nabika parce qu'il y a un mot dans la chanson qu'ils ne comprennent pas bien et veulent s'assurer de ce qu'il dit.

Nous espérons vous avoir aidé avec les paroles de la chanson Po Nabika de Mike Kalambay.

Sur cette page, vous avez à votre disposition des centaines de paroles de chansons, comme Po Nabika de Mike Kalambay.